Mobeko ya muvema/Makambo ya kati/Maloba ya ebandeli
![]() | This page includes draft content of the Movement Charter. If you have feedback, please provide it on the talk page, or see other ways to give feedback in the consultations (including live meetings and surveys). |
← Back to overview | To the "Values and Principles" section →
Mouvema ya Wikimedia etali mingi bokolisi, kobatela, mpe kopanzana ya bozali ya boyebi ya ofele na mokili mobimba. Mobeko ya Mouvema Wikimedia ezali pona kolimbola lisanga ya Wikimedia, ntina na yango ya moboko pe ba mitinda ya mibeko. Ezali boyokani ya bomoi ya bato na ndenge ya mibeko oyo ezali kolimbola boyokani kati ya bibongiseli oyo ezali na kati ya lisanga, makoki mpe mikumba na bango. Ezali mpo na bibongiseli oyo ezali mpe oyo ekoya.
Mobeko eye ezali na ndingisa ya bato ya mboka oyo yango etambwisaka, na nzela ya kosala ya kondimisa mpo yango eyebana. Charte ya mibeko ya Mouvema etali basangani nionso, mpe bisika oyo ezali na kati ya muvema Wikimedia, esangisi, kasi esuka te na bato oyo batiaka likabo to ba contributeurs na makambo oyo ezali na kati, misala, boyokani na yango, pe lisangá Wikimedia.
Pona kokokisa mokano oyo, muvema epesi boyebi ebele na minoko ebele pe na mikano ndenge na ndenge. Misala miye mizali mingi mingi oyo mizali kokambama yango moko,[1] na oyo etali bokeli pe boyangeli makambo, bakisa pe bokambi ya baimboka. Muvema yango ezali pe na bituluku oyo ebongisami pe oyo ezali na momesano te oyo etali mingi makambo ya sikisiki to ba régions géographiques. Mosala ya bituluku wana ezali ya kosunga misala mbala moko pe na ndenge ya semba.
Longola misala pe ba bituluku ya bato wana, misala nyoso oyo etali botongi ezali na mikumba ebele. Misala eye wana ekokisaka bamposa ya tekiniki ya muvema. Misala ya botongi epesaka misolo pe biloko mosusu pona bokolisi pe bobateli boyebi ya seko. Esalaka makasi mpo na kolendisa lisanga ya mibeko, oyo etali mibeko, oyo epesaka nzela na muvema, mpe bitando na yango, kosala na mokili mobimba. Infrastructure yango esungaka pe baye bapesaka makambo oyo ezali na kati, batangi, pe basusu nionso oyo bazali na kati ya mouvema na molongo mobimba ya Wikimedia na kotombola pe kotombola esika ya bokengi pe oyo ebotaka mbuma oyo boyebi ekoki kokabola pe kosalela, tango likoki ezali te pona mosala ya mboka yango moko. Lolenge pe bonene ya lisungi ya ba infrastructures ezali na ndelo mpe na ntina ya mouvema, lisungi ya misolo pe bipekiseli oyo etiamaki libanda ya muvema.
Notes
- ↑
This wording has been highlighted as a potential concern by the Wikimedia Foundation Legal department, who proposed the following alternative wording: The projects are built with systems of self-governance. This was on two primary grounds:
- It may mislead external organisations (especially legislative bodies) into believing that there is no body capable of formally complying with legal obligations.
- Additionally, “largely” is fairly vague, and does not currently have any neighbouring sentences that provide sufficient clarity on either the reach or the limits to local project self-governance.
The MCDC believes these are valid concerns, but that the general meaning should remain.
THEREFORE:
Any suggestions and specific phrasings that can capture the meaning while satisfying Legal’s concerns would be very appreciated.
← Back to overview | To the "Values and Principles" section →