WikiLangila

From Meta, a Wikimedia project coordination wiki
This page is a translated version of the page WikiLinguila and the translation is 92% complete.
Etuluku ya basaleli Wikimedia ya lisangá Linguila
EsíkáAfilíka ya Katikati
Mokɔlɔ ya ebandeli2023
Bato bamipesi mobimba20+
Lokótá ya Lɛ́ta tǒ mpé minɔkɔ ya libosoLingála, Kikɔ́ngɔ
Lokótá tǒ mpé minɔkɔ mísusuLangues teke, Ciluba, Kiswahíli
Bato ya ntinaNixon Mukoko, Brandon Mbuaku, Yves Mukengeshayi, Klut Diadia, Veronica Bavuidinsi
Adrɛsi ya e-mailwikilinguila@gmail.com
Telegramhttps://t.me/+LqU6ShnryvRhNjY0
Twitterhttps://x.com/WikiLinguila
Facebookhttps://www.facebook.com/wikilinguila
Instagramhttps://www.instagram.com/wikilinguila/




Wikimedia Community User Group LinguilaWikiLinguila ezalí etuluku ya bato óyo bamipesi na kotombola misálá ya Wikimedia na minɔkɔ ya Afríka ya katikati. Na ndakisa ya minɔkɔ mya Bantu míbalé ezuami elobamaka na eteni-etúká ya katikati ya Afríka lokola lokótá ya Lɛ́ta, ezalí bongɔ Kikɔ́ngɔ (6000000 - efúku motóbá) mpé Lingála (20000000 - ntúkú míbalé na efúku) elobami mingi ó katí ya bisé ya Afríka ya katikati, Kongó-Kinsásá, Kongó-Brazzaville mpé Angola mpé mokemoke elobami lisusú na Santrafríka, Gabɔ́ mpé Sudani ya sidi, bato batangí balobaka minɔkɔ yangó wutá bǒ mwǎna na bangɔ́.

Langila ewuti na Lingála ó balabála, ezalí monɔ‌kɔ‌ elobami katí na bato óyo bayebani, kasí na katí ya bomesano elingí mpé kolakisa nkótá yɔ‌nsɔ ezuami ó sé ya mabelé. Na yangɔ‌ WikiLangila elingí koloba Wiki mpɔ‌ na minɔ‌kɔ‌ tǒ lokótá ó katí ya Wiki, kasí Linguila ezalí mingí ndeti kolakisa lisangá ya bato bayekoli mpé balobaka minɔkɔ yangó wutá bǒ mwǎna tǒ mpé ba óyo baponi minɔkɔ yangó mpɔ̂ na bolobani mpé kosalela na búku.

Milende yangɔ ekoki kolendisa mpé kosalisa na kobongisa lisanga yɔ‌nsɔ na Afríka ya katikati, epaí bomemani ebongisami naíno te tɔ̌ mpé ezalí naíno lisanga ya misálá ya Wikimedia te. Mokano ezalí ya kopesa makambɔ na misálá ya Wikimedia. Na momeseno, ekozala malamu kozala na bituluku ya bato óyo basalelaka yangɔ, ndakisa, otuluku ya bato ya Wikimedia Lingála mpé otuluku ya bato ya Wikimedia Kikɔ́ngɔ, kasi kosangisa minoko wana óyo elobamaka na esíká mɔ̌kó ya sikisiki ya mokili ekozala malamú mingí. Kasí mpɔ‌ minɔkɔ mibalé óyo etikali tozali na mokano ya kokende liboso mokemoke, ndakisa kitéké óyo ezuamí na Kongó-Kinsásá, Kongó-Brazzaville mpé Gabɔ́, tɔ̌ Luba-kasaï óyo ezuamí na Kongó-Kinsásá ya sudi mpé na nola ya Angola.

Mokakatano monɛnɛ na ntangú óyo ezalí ya kozwa bato ya Wikimedia na bisiká waná, tǒ ba óyo bazalí na mposá ya kosangana mpɔ̂ na mosálá yangɔ‌. Tozalí kosenga na moto nyɔnsɔ ɔ́yo awuti tǒ afandi na bisiká waná ya ndengé na ndengé asalisa mokili na bonzebi na nzelá ya koyeba minɔkɔ na bisó, óyo babosanaka yangɔ‌. Bilengé mingí óyo bayebi koloba yangɔ́ kasí bakoki koyeba te ntina nini esengeli kopesa maboko na makambɔ́ etali lokótá ya Lɛ́ta, mpé ntangú musúsú bakoki kozala na makoki te ya kosálá yangɔ́ malamú.

WikiLinguila ezalí na mokano ya kokoba na komatisa bomonisami mpé kobakisa ntina na óyo etalí bonzebi o katí ya búku yɔ́nsɔ na nzela ya masini mpo na minɔkɔ ya bikólo bizalí na etúka ya Afrika ya kati, lolenge malamú ya kobatela na tango mɔ̌kó libula ya mimeseno ya bato moke na nzela ya misala ya Wikimedia mpe bibongiseli mosusu oyo ezali kosala mpo ete mimeseno na bango ezala na nzela ya kozwama na Ɛntɛrnɛ́tɛ. Lotomo na biso ya monene ezali ya kopesa bomonisami, kotombola pe kopesa lokumu na monkandá oyo esalemi na minoko ya ekolo na biso pona kokomisa mabongisi oyo ya biso moko po esalisaka biso pona kondimisa oyo tozali lokola libota pe molobi ya etuku ya kati ya afriki. Na ndenge wana, tokomonisa te elongo mokili ekomi muke pona ko solola pe kosala makambu ebele ya malamu.

Bato ya káti

Bokǒtí lisangá etalisamí mpɔ̂ na moto nyɔ́nsɔ óyò asepeli.

Contacts

WikiLinguila